Satana akosaki bato ya Nzambe mpo abengana bango na lola kino na mabele oyo mpe azali kokoba kokosa bango mpo ete bakoka kozonga na bokonzi ya lola te.
Mpo na yango, alongolaki Sabata mpe Elekeli mpo na kopekisa bato ya Nzambe kosambela Ye, mpe akotisaki mimeseno ya nzambe-moi lokola losambo ya mokolo ya lomingo mpe Noele na tempelo ya Nzambe.
Eliya alongaki basakoli ya lokuta 850 na nzela ya losambo oyo bapesaki Nzambe, mpe Yesu alongaki Satana na maloba oyo, “sambela Nkolo Nzambe na yo, mpe salelá ye kaka.” Na eleko ya Molimo Mosantu, Klisto Ahnsahnghong mpe Nzambe Mama bateyi biso ete na kolanda boyokani ya sika, tokoki kosalela Nzambe se moko mpo na kozwa bolimbisi ya masumu mpe kozonga na bokonzi ya seko ya lola.
Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino. Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe. Balevi 18:3–5
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy