Ntango Nzambe afungoli nzela mpo nsango malamu epalangana na nzela ya bokoli na siansi mpe na tekiniki, na transport, mpe na internet, tosengeli noki kopalanganisa boyebi ya kondimana ya sika mpe bosolo na ntina ya Klisto Ahnsahnghong mpe Nzambe Mama na mokili.
Atako Ntoma Paulo akangaki mpe anyokolaki basantu, asalaki yango liboso ete ayeba bosolo na ntina na Yesu Klisto. Na lolenge moko, tosengeli koteya boyebi ya solo ya Nzambe na baye bazali kotyola Eklezia ya Nzambe mpo na bozangi bososoli na bango na ntina ya Sabata mpe Elekeli. Na kosalaka bongo, tokoki kokamba bango mpo na kozwa lipamboli ya lobiko, oyo esepelisaka Nzambe mingi.
Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu. Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu. Malako 16:15–16
Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso, oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo. 1 Timote 2:3–4
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy